Libondeli lya Mawa



Nzámbe wa ngai,
nandimi masumu ma ngai na motéma mwa ngai mobimba,
Mpo ete nasálaki masumu óyé nasengeli na etúmbeli ya Yó,
Mpe, óyo ezalí komitungisa ngai mingi koleka,
nasálaki mabe epai na Yó,
Yó óyé Ozalí malámu libela mpé óyé Osengeli bolingo koleka bilómu nyonso.

Nazalí kotya mokano na lisálisi lya Yó lya bosantu,
eté nakosála Yó mabe lisúsu tɛ́
mpé nakokima bisika bi'a masumu óyé bizali penepene.
Nkolo, yó óyoka mawa, límbisá ngai.

Amen.