opamboli

Bopamboli ezala na Nkolo Nzambe wa Israele,
Mpo ete ayei kotala mpe kosala lobikisi lwa bato ba ye.
Mpe atómboli mpese ya lobikisi mpo na biso
Na ndako ya Davidi mowayeli wa Ye,
Ndenge kaka asololaki na minoko mya basantu ba ye,
Baproféta ba ye ba ntango ya kala:
Lobikisi kowuta na banguna ba biso
Mpe na loboko lwa banso baye bazali koyina biso.
Mpo na kosala mawa elongo na batata ba biso
Mpe kokanisa Kondimana ya Ye mosantu:
Ndenge alapa ndai epai na Abrahama tata wa biso,
Ete kozanga nsomo, libiki kowuta na loboko lwa banguna,
Tokosalela Ye na bosantu mpe na bosembo
Yambo ya Ye na mikolo mya biso nyonso.
Mpe yo, mwǎna, okobéngama prophéta wa likoló:
Mpo ete okobánda liboso lya Nkolo kóbóngisa nzela ya Ye,
Mpo na kopesa bato ba Ye boyebi bwa lobikisi
Na bolimbisi bwa masumu ma bango,
Na mayé mazali kowuta na mawa monene ma Nzambe wa biso,
Óyé óyekaki kotala biso kowuta na likoló mwinda óyé ozali kobima,
Mpo na kopesa mwinda epai na baye bafandi na molili mpe na elili ya liwa
Mpe mpo na kokamba makolo ma biso na nzela ya Kímya.
Lokumu epai na Tata
mpe na Mwana
mpe na Molimo Mosantu.
Ndenge ezalaki na ebandeli
ezali sikoyo mpe libela,
na se ya libela na libela.
Amen.