Nzembo ya Bilómu

O Mokonzi Nzambe wa ngai,
ozwa nkembo mpo ya bilomu binso obakisi,
liboso mpenza mpo ya ndeko wa biso Moi,
oyo akopesaka biso pole mpé akomonisaka Nkembo ya yo.
Ozwa nkembo mpo ya ndeko wa biso Sanza
mpé mpo ya Minzoto mya likolo,
miye obongisi kitoko mpenza.
Ozwa nkembo mpo ya ndeko wa biso Mopepe,
mpo ya ndeko Mai, liye liletolaka pto,
mpé mpo ya ndeko Moto, oyo akongenga na butu.
Ozwa nkembo mpo ya ndeko wa biso Mabele,
mama wa biso, oyo akoleisaka biso
mpé akobotaka matiti mpé banzete ndenge na ndenge.
Ozwa nkembo mpo ya ndeko wa biso Liwa lya nzoto,
liyo moto te akoki kokima.
Esengo na baye bakokufa o kati ya Bolingo bwa yo.
Binso bilomu bya Nzambe,
bopesa Mokonzi matondi mpé nkembo,
bikumisa yye seko mpé seko.
Amen.