Komipesa na Libota Santu

E Yezu, Maria mpé Jozefu,
Libota Santu lya Nazareti,
Lelo oyo, libota lya biso lyei komipesa na bino.
Tondimi kotosa mibeko mya Nzambe,
mpé tolingi kolanda ndakisa ya bino ya bolingo,
ya boboto mpé ya kozalana na kimia.
E Yezu, zala Mokonzi wa ndako ya biso.
E Maria, zala Mama wa biso.
E Jozefu, batela biso lokola obatéláká Yezu na Maria.
Bopesa biso ngolu ya kofanda elongo,
mpé bokabula biso te, kino tokokoma na Likolo.
Amen.