Kreedo ya Bapostolo

Nazali kondima Nzambe,
Tata Mozwi-wa-Nguya-yonso,
Mozalisi wa likolo na se,
mpe Yezu Kristu,
Mwana wa ye se moko, Nkolo wa biso,
otutami zemi o nguya ya Elimo Santu,
abotami na Maria Vierge,
anyokwami o se ya Ponsio Pilato,
abakami o kuruse, akufi mpe akundami.
Akiti o lifelo;
o mokolo mwa misato asekwi o bakufi;
Abuti o likolo,
afandi o loboko la mobali la Nzambe Tata Mozwi-wa-Nguya-yonso;
akowuta kuna mpo na kosambisa
bato ba bomoi na ba kufa.
Nazali kondima Elimo Santu,
Eklezia Katolike Santu,
bosangani bwa Basantu,
bolimbisi bwa masumu,
bosekwi bwa nzoto,
na bomoi bwa seko.
Amen.