Likámwisi (Nicea)


Nandimi Nzambe mɔkɔ,
Tata wa nguya nyonso,
Mokeli wa likoló mpé wa mokili,
wa bilómu nyonso ya komɔna mpé ya komɔna tɛ́.

Nandimi Nkolo mɔkɔ Yésu Klisto,
Mwana wa Nzambe mɔkɔ óyé óbotamaki na Tata yambo ya mikolo mya libela nyonso.
Nzambe kowuta na Nzambe, Mwinda kowuta na Mwinda,
Nzambe wa solo kowuta na Nzambe wa solo,
Óyé óbotami, ózalísami tɛ́,
Ózalí na motindo mɔkɔ na Tata,
Óyé na Nzéla ya Yé nyónso bísálami.
Óyé mpo na bísó bato mpé mpo na lobíkisi lwa bísó,
Ókitaki kowuta na likoló.
Óyé na Nzéla ya Molimo Mosantu, ókómaki moto na libumu lya Maria Mwǎna ya Mwinda, mpé ózalaki moto.
Ómoni mpási mpo na bísó,
Na nsé ya Ponsio Pilato óbúkamaki, ókúfaki,
Mokolo mwa mísáto óselami, ndenge bikomi bi'a Basantu bizalí kolobela.
Ómataki na likoló,
Azalí kofánda na lobóko la mobáli lya Tata.
Azóya lisusu na lokúmu lwa Yé kósambisa bato ba bomoi mpé ba bakúfi,
Mpe Bokonzi bwa Yé bókozala na nsúka tɛ́.

Nandimi Molimo Mosantu,
Nkolo óyé ópesaka bomoi,
Óyé ókúta na Tata mpé na Mwana,
Óyé asalelami losáko mpé óbatelami lokúmu elongo na Tata mpé Mwana,
Óyé alobaki na Nzéla ya Baproféta.
Nandimi Eklezia mɔkɔ, Mosantu, Katolika mpé wa Baapóstolo.
Nandimi Libatisi mɔkɔ mpo na bólimbisi bwa masumu.
Nezalí kótalela bóselami bwa bakúfi,
Mpe bomoi bwa mikolo mya libela.

Amen.