itanie ya Basantu

Nkolo, pietà,
Nkolo, pietà.
Kristo, pietà,
Kristo, pietà.
Nkolo, pietà,
Nkolo, pietà.
Kristo, ascoltaci,
Kristo, óyoka biso.
Kristo, esaudiscici,
Kristo, óndima biso.
Tata wa likoló, óyé Ozali Nzambe,
Yó óyoka mawa epai na biso.
Mwana, Mobíkisi wa mokili, óyé Ozali Nzambe,
Yó óyoka mawa epai na biso.
Molimo Mosantu, óyé Ozali Nzambe,
Yó óyoka mawa epai na biso.
Bosantu Bósáto, Nzambe Moko,
Yó óyoka mawa epai na biso.
Santa Maria,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santa Mama wa Nzambe,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Mikaele,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Bínó baanzelu nyonso ba Nzambe,
Bósembela mpɔ̂ ya biso.
Santu Yoane Mobatisi,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Yosefu,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Basantu Petelo mpé Paulo,
Bósembela mpɔ̂ ya biso.
Santu Andrea,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Yoane,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santa Maria Madalena,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Stefano,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Lawelasi,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Basanta Perpetua mpé Felisite,
Bósembela mpɔ̂ ya biso.
Santu Glegeliyo,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Augustino,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Santu Benedikto,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Basantu Falansiswa mpé Dominike,
Bósembela mpɔ̂ ya biso.
Santa Katarina wa Sienne,
Sámbela mpɔ̂ ya biso.
Basantu nyonso ba Nzambe,
Bósembela mpɔ̂ ya biso.
Yó ózala mobóto,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na mabe nyonso,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na masumu nyonso,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na liwa lya libela,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na nzela ya bozwi nzoto bwa Yó,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na liwa mpé bóselami bwa Yó,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Na bópɛsi bwa Molimo Mosantu,
Bíkisá biso, ó Nkolo.
Biso bato ya masumu, tósenga Yó,
Yó óyoka biso, ó Nkolo.
Ete Óndima kobátela mpé kokamba Eklezia ya Yó mosantu,
Yó óyoka biso, ó Nkolo.
Ete Óndima kopesa kímya mpé bosangisi bwa solo na bato nyonso,
Yó óyoka biso, ó Nkolo.
Ete Óndima kobátela mpé kopétola Pápa mpé basáleli nyonso ba Eklezia,
Yó óyoka biso, ó Nkolo.
Mwana wa Nzambe,
Yó óyoka biso, ó Nkolo.
Mwana-Mpate wa Nzambe óyé ólongolaka masumu ma mokili,
Límbisá biso, ó Nkolo.
Mwana-Mpate wa Nzambe óyé ólongolaka masumu ma mokili,
Óndima biso, ó Nkolo.
Mwana-Mpate wa Nzambe óyé ólongolaka masumu ma mokili,
Yó óyoka mawa epai na biso.