ibondeli lya ntóngó

Nakúmbeli Yó, Nzambe wa ngai,
mpe nalingi Yó na motéma mwa ngai mobimba.
Natóndi Yó, Nkolo,
mpo ete Ozalisaki ngai, Obikisaki ngai,
Osálaki ngai moklisto
mpe Obátelaki ngai óbósína óyo.
Napesí Yó misálá mya mokolo óyo,
Bópesa ete mísálá nyónso mizala ndenge mokano mwa Yó mwa bosantu mpe mpo na lokúmu lwa Yó monene.
Mama Maria óyo Olíngami, yó óbátela ngai na mokolo óyo.
Anzelu Mobáteli wa ngai, yó ókeba ngai.
Santu Yosefu mpe Basantu bánsɔ ba Nzambe, bósembela mpɔ̂ ya ngai.
Amen.