ibondeli mpo na Eklezia ya R.D. Congo

Nzámbe wa Nguya nyonso mpé wa Libela,
Óyé na bobóti bwa Yó Ofandisaki Eklezia na Congo,
Tósenga Yó óbátela mpé ókamba yangó.
Pésá na bato ba Yó na Congo bóndimi bwa mpiko,
elikya ya bomoi mpé bolingo ya kobela.
Yó ósimba Baepiskopo ba bísó, Basáleli mpé Bato ba Masangá na mosálá mwa bango,
Ete Liloba lya Yó likoka kosololama na nguya na bisika nyonso.
Sála ete Eklezia na Congo ezala ntángo nyonso elembo ya bosangisi,
Esáléli ya bosembo mpé Mokambi wa kímya.
Na Klisto Nkolo wa bísó.
Amen.