Libondeli lya Kímya (Mokuse)



E Mokonzi, komisa ngai esaleli ya kimia ya yo.
Epai bonyokoli bozali, natia bolingo.
Epai matata mazali, natia bolimbisi.
Epai ntembe ezali, natia bondimi.

Epai elikya ezali te, natia elikya.
Epai molili mozali, natia pole.
Epai mawa mazali, natia esengo.

E Mokonzi, sunga ngai,
naluka kobɔndisa baninga, kasi kobɔndisama te;
naluka kolinga baninga, kasi kolingama te.

Mpo ete se na kokaba nde moto akozwaka;
se na komibosana nde moto akomimonaka;
se na kolimbisa nde moto alimbisamaka;
mpé se na kokufa nde moto akolamuka mpo na bomoi bwa seko.

Amen.