ibondeli lya mpókwa

Nakúmbeli Yó, Nzambe wa ngai,
Mpe nalingi Yó na motéma mwa ngai mobimba.
Natóndi Yó mpo na kozalisa ngai, kosála ngai moklisto
Mpe kobátela ngai na mokolo óyo.
Límbisá ngai mpo na masumu masálami mpé,
sóki osálaki malámu, Óndima yangó.
Yó óbátela ngai na bopémi óyo mpé óbikisa ngai na bampámé.
Ngolu ya Yó ezala ntángo nyonso elongo na ngai
Mpe elongo na bato ba ngai banso balíngami.
Amen.