Tóyembela Yó, Nzambe



Tóyembela Yó, Nzambe,
Tóndímí Yó lokóla Nkolo.
Mokili mobimba mozali kosanjola Yó,
Tata óyé ozalí na libela nsuka tɛ́.

Epai na Yó Baanzelu nyonso,
Ba-likoló mpé nguya nyonso
Bazali koganga,
Bósantu, Bósantu, Bósantu
Nkolo Nzambe wa ebele lya basoda.
Likoló mpé mokili bitondi na lokúmu lwa Yó.

Ebele lya Baapóstolo bazalí kosanjola Yó.
Ebele lya Baproféta bazalí kosanjola Yó.
Ebele lya Bamartíri ya nkembo bazalí kosanjola Yó.
Eklezia Mosantu na mokili mobimba
Ozali kóndima Yó,
Tata wa nkembo ya nsuka tɛ́,
Mwana mɔkɔ wa Yó wa solo mpé mosantu,
Mpe Molimo Mosantu Mobóndisi.

Yó Ozalí Nkolo Yésu Klisto,
Nkómbó-Nkolo wa lokúmu.
Mpo na kobíkisa moto, Ozwaki nzoto ya moto,
Mpe Óboyaki libumu lya Mwǎna ya Mwinda tɛ́.
Óbúndaki Nguya ya Liwa,
Ófungolaki Bokonzi bwa Likoló epai na bandimi.
Yó ózali kofánda na lobóko la mobáli lya Nzambe, na nkembo ya Tata.
Tóndimi Ókozala koyela lokóla Mosambisi wa bísó.

Tósenga Yó, óbómbola bawayeli ba Yó,
Óyé Óbikisaki na Makila ma Yó ya Motuya.
Bópesa bango kozwa lokúmu elongo na Basantu ba Yó
Na nkembo ya libela.

Amen.