ó óya, Molimo Mosantu

Yó óya, Molimo Mosantu,
Tóndisa mitéma mya bandimi ba Yó,
Mpe Óléngela kati na bango mɔto mwa bolingo bwa Yó.
Tinda Molimo mwa Yó, mpe bilómu bikozalama.
Mpe Okobóngisa lisúsu elongi ya mokili.
Tósembela
Nzámbe, Yó óyé Olakisaki mitéma mya bandimi ba Yó na mwinda mwa Molimo Mosantu, Tósela bísó mpo na kosála mpo na Molimo óyé mɔkɔ, mpé tómona esengo na libóndisi lya Yé libela. Na Yésu Klisto Nkolo wa bísó.
Amen.