Chapelet ya Ngolu ya Nzambe
ln_segno_croce.mp3+ O nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Elimo Santu. Amen.
ln_eterno_padre.mp3Tata wa Seko, nazali kobonjela yo, Nzoto na Makila, Molimo na Bonzambe bwa Mwana wa yo wa Bolingo, Nkolo wa biso Yezu Kristu, mpo na kofuta masumu ma biso, na ma bato banso.
ln_per_la_sua.mp3Mpo na Pasi ya ye ya Somo, yokuva biso mawa, mpe mokili mobimba.
ln_santo_dio.mp3Nzambe Santu, Santu wa Nguya, Santu owa Seko, yokuva biso mawa, na bato banso.
ln_sangue_e_acqua.mp3E Makila na Mai, bobimi o Motema mwa Yezu lokola liziba lya Ngolu mpo na biso, natyeli bino motema!
Rozale Santu
ln_credo.mp3KREEDO YA BAPOSTOLO
ln_credo_niceno.mp3Kreedo ya Nicée
ln_pater.mp3Tata wa biso
ln_ave.mp3Maria Losako
ln_gloria.mp3Nkembo na Tata
ln_salve_regina.mp3Losako, Mokonzi (Salve Regina)
ln_litanie.mp3Litaniya ya Lorette
ln_gesu_mio.mp3E Yezu wa ngai, limbisa masumu ma biso, bikisa biso o moto mwa lifelo, mema milimo minso o lola, mingi mpenza miye mizali na posa ya ngolu ya yo.
ln_o_dio.mp3E Nzambe, yaka kosunga ngai. E Nkolo, yaka noki kokonela ngai.
ln_regina_pace.mp3Maria, Mokonzi wa Kimia, bondela mpo na biso.
ln_intenzioni_papa.mp3Masambo mpo na mikano mia Papa...
ln_gioia1.mp3
Likambo lya yambo lya Bosepeli
Bosakoli bwa Anjelu kowuta na Nzambe epayi ya MariaMbuma ya Likambo: Bokitisi (Humilité)
ln_gioia2.mp3
Likambo lya mibale lya Bosepeli
Maria akokenda kotala ElizabetiMbuma ya Likambo: Bolingo bwa Bato (Charité)
ln_gioia3.mp3
Likambo lya misato lya Bosepeli
Yezu abotami o BetelemiMbuma ya Likambo: Bobola
ln_gioia4.mp3
Likambo lya minei lya Bosepeli
Bamamemi Yezu o TempeloMbuma ya Likambo: Botosi Mobeko mwa Nzambe
ln_gioia5.mp3
Likambo lya mitano lya Bosepeli
Bomonami bwa Yezu o TempeloMbuma ya Likambo: Esengo ya kokuta Yezu o bomoi bwa yo
ln_luce1.mp3
Likambo lya yambo lya Pole
Yezu azwi batisimo o YordaniMbuma ya Likambo: Bofungwaki epayi ya Elimo Santu
ln_luce2.mp3
Likambo lya mibale lya Pole
Fete ya libala o KanaMbuma ya Likambo: Kokenda epayi ya Yezu na nzela ya Maria
ln_luce3.mp3
Likambo lya misato lya Pole
Bosakoli bwa Bokonzi bwa NzambeMbuma ya Likambo: Bobongoli motema na Kotyela Nzambe motema
ln_luce4.mp3
Likambo lya minei lya Pole
Yezu abongwani o TaborMbuma ya Likambo: Posa ya Bosantu
ln_luce5.mp3
Likambo lya mitano lya Pole
Bokeli bwa EkaristiMbuma ya Likambo: Bokumbameli (Adoration)
ln_dolore1.mp3
Likambo lya yambo lya Pasi
Yezu awoleli o elanga ya GetsemaniMbuma ya Likambo: Boyoki mawa mpo na masumu
ln_dolore2.mp3
Likambo lya mibale lya Pasi
Yezu abetami fimboMbuma ya Likambo: Bopeto (Pureté)
ln_dolore3.mp3
Likambo lya misato lya Pasi
Yezu alatisami motole mwa nzubèMbuma ya Likambo: Mpiko (Courage)
ln_dolore4.mp3
Likambo lya minei lya Pasi
Yezu amemi kuruseMbuma ya Likambo: Bozelisi (Patience)
ln_dolore5.mp3
Likambo lya mitano lya Pasi
Yezu akufi o kuruseMbuma ya Likambo: Bolimbisi na Bokasi (Persévérance)
ln_gloria1.mp3
Likambo lya yambo lya Nkembo
Bosekwi bwa YezuMbuma ya Likambo: Kondima
ln_gloria2.mp3
Likambo lya mibale lya Nkembo
Yezu amati o LolaMbuma ya Likambo: Elikya (Espérance)
ln_gloria3.mp3
Likambo lya misato lya Nkembo
Elimo Santu akitela BapostoloMbuma ya Likambo: Bolingo (Amour)
ln_gloria4.mp3
Likambo lya minei lya Nkembo
Maria amati o LolaMbuma ya Likambo: Ngolu ya kufa malamu
ln_gloria5.mp3
Likambo lya mitano lya Nkembo
Maria akomi Mokonzi wa Lola na SeMbuma ya Likambo: Kotyela losambo lya Maria motema
(*)
ln_gioia1v.mp3
«O sanza ya motoba, Anjelu Gabriele atindamaki na Nzambe o mboka moko ya Galile, nkombo ya yango Nazareti, epayi ya elenge mwasi, oyo abongisamaki mpo na kobalana na mobali moko, nkombo ya ye Jozefu, wa libota lya Davidi; nkombo ya elenge mwasi oyo Maria» (Lk 1,26-27).
ln_gioia2v.mp3
«O mikolo mina Maria atelemaki, akendaki noki o mboka ya ngomba, o engumba moko ya Yuda, akotaki o ndako ya Zakaria mpe apesaki Elizabeti losako. Nde ezalaki boye: lokola Elizabeti ayokaki losako la Maria, mwana apumbwaki o libumu lya ye; mpe Elizabeti atondaki na Elimo Santu mpe aogangaki na mongongo makasi: "Obenibwa o kati ya basi, mpe mwana wa libumu lya yo abenibwa!"» (Lk 1,39-42).
ln_gioia3v.mp3
«O mikolo mina, mobeko mobimaki epayi ya Sezari Ogusti mpo na kokoma nkombo ya bato banso ba mokili. Oyo ezalaki tokomi nkombo ya yambo, wana Kirino azalaki guvenele wa Siri. Bato banso bakendaki mpo na tokomi nkombo, moto na moto o mboka ya ye. Jozefu mpe, lokola azalaki wa ndako mpe wa libota lya Davidi, alongwaki o Galile, o mboka Nazareti, mpo na komata o Yuda, o mboka ya Davidi, oyo babengi Betelemi, mpo na tokomi nkombo elongo na Maria, mwasi wa ye, oyo azalaki na zemi. Wana bazalaki kuna, mikolo mia ye mia kobota mikokaki. Abotaki mwana wa ye wa liboso, amozingaki o bilamba, amolalisaki o elyelo ya bibwele, mpo esika ezalaki te mpo na bango o ndako ya bapaya» (Lk 2,1-7).
ln_gioia4v.mp3
«Nde lokola mikolo mwambe mikokaki mpo na kokata ye ngenga, bapesaki ye nkombo Yezu, nkombo eye Anjelu apesaki yambo atutama o libumu. Mpe lokola mikolo mia bopeto bwa bango mikokaki, kolanda Mobeko mwa Moize, bamemaki ye o Yeruzalemi mpo na komokaba epayi ya Nkolo (lokola ekomama o Mobeko mwa Nkolo: "Mwana mobali nyonso wa liboso akobengama Mosantu epayi ya Nkolo") mpe mpo na kopesa mbeka kolanda oyo elobami o Mobeko mwa Nkolo, "bapanga mibale to bana ba bibenga babale"» (Lk 2,21-24).
ln_gioia5v.mp3
«Baboti ba ye bazalaki kokenda o Yeruzalemi mobu na mobu mpo na Fete ya Paska. Mpe tango akokisaki mibu zomi na ibale, bamataki kuna kolanda ezaleli ya Fete; mpe lokola mikolo misilaki, wana bazalaki kozonga, mwana Yezu atikalaki o Yeruzalemi. Baboti ba ye bayebaki te... Sima ya mikolo misato bamomonaki o Tempelo, afandi o kati ya balakisi, azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna; mpe banso bayokaki ye bakamwaki mpo na mayele ma ye mpe biyano bia ye» (Lk 2,41-47).
ln_luce1v.mp3
«Mpe tango Yezu azwi batisimo, abimi noki o mai, mpe tala, likolo lifungwami mpe amoni Elimo ya Nzambe kokita lokola ebenga, mpe koya likolo lya ye; mpe tala, mongongo mowuti o likolo, molobi: "Oyo azali Mwana wa ngai wa bolingo, oyo asepelisi ngai mingi"» (Mt 3,16-17).
ln_luce2v.mp3
«O mokolo mwa misato, libala lizalaki o Kana ya Galile, mpe mama wa Yezu azalaki kuna; Yezu mpe abengamaki o libala, elongo na bayekoli ba ye. Tango vinyo esilaki, mama wa Yezu alobi na ye: "Bazali na vinyo te." Mpe Yezu alobi na ye: "E mwasi, likambo nini kati ya ngai na yo? Ngonga ya ngai naino ekoki te." Mama wa ye alobi na basali: "Bosala nyonso akoloba na bino"» (Jn 2,1-5).
ln_luce3v.mp3
«Ntango ekoki, mpe bokonzi bwa Nzambe bozali pene; bobongola mitema, mpe bondimela Nsango Elamu» (Mk 1,15).
ln_luce4v.mp3
«Mpe sima ya mikolo motoba Yezu akamati Petro na Yakobo na Yoane ndeko wa ye, mpe amemi bango o ngomba ya molayi bango moko. Mpe abongwani o liboso lya bango, mpe elongi ya ye engengi lokola moi, mpe bilamba bia ye bikomi mpembe lokola pole» (Mt 17,1-2).
ln_luce5v.mp3
«Wana bazalaki kolia, Yezu akamati mapa, mpe abenisi, mpeabuki, mpe apesi bayekoli mpe alobi: "Bozwa, bolia; oyo ezali nzoto ya ngai"» (Mt 26,26).
ln_dolore1v.mp3
«Bongo Yezu ayei na bango o esika ebengami Getsemani, mpe alobi na bayekoli: "Bofanda awa, wana ngai nakei kuna kobondela." Akamati Petro na bana babale ba Zebede, mpe abandaki koyoka mawa mpe motema pasi. Bongo alobi na bango: "Molimo mwa ngai mozali na mawa ma kufa; botikala awa, mpe bokengela na ngai." Akendi mwa mosika, amwagsi elongi o se, abondeli, alobi: "Tata wa ngai, soki likoki lizali, tika kopo eye eleka mosika na ngai; kasi, ezala bolingo bwa ngai te, kasi bwa yo"» (Mt 26,36-39).
ln_dolore2v.mp3
«Bongo Pilato akamati Yezu mpe amobetisi fimbo. Mpe basoda basali motole mwa nzubè, balati ye yango o muto, mpe balati ye elamba ya motane-ngola; bayeli ye, balobi: "Losako, Mokonzi wa Bayuda!" mpe babeti ye mbata» (Jn 19,1-3).
ln_dolore3v.mp3
«Bongo basoda ba guvernele bamemi Yezu o ndako ya boyangeli, mpe basangisi limpinga lyonso o liboso lya ye. Balongoli ye bilamba mpe balatisi ye elamba ya motane-ngola, mpe basali motole mwa nzubè balatisi ye yango o muto, mpe batii lititi o loboko la ye la mobali. Mpe bafukameli ye, baseki ye, balobi: "Losako, Mokonzi wa Bayuda!"» (Mt 27,27-29).
ln_dolore4v.mp3
«Mpe bapusi moto moko alekaki nzinla, Simona wa Sirene, oyo awutaki o bilanga, tata wa Alezandre na Rufo, mpo amema kuruse ya ye. Mpe bamemi ye o esika ebengami Gologota (elingi koloba Esika ya Mbebo ya Muto)» (Mk 15,21-22).
ln_dolore5v.mp3
«Mpe tango bakomi o esika ebengami Mbebo ya Muto, babaki ye kuna o kuruse, na bato ba mbeba, moko o mobali mpe mosusu o mwasi. Mpe Yezu alobi: "Tata, limbisa banso; mpo bayebi te oyo bazali kosala"... Ezalaki pene na ngonga ya motoba, mpe molili mokoti o mokili mobimba kino o ngonga ya libwa, wana pole ya moi elimwi; mpe rido ya tempelo epasuki na biteni bibale. Bongo Yezu, agangi na mongongo makasi, alobi: "Tata, o maboko ma yo natii elimo ya ngai!" Mpe sima ya koloba boye akati motema» (Lk 23,33-46).
ln_gloria1v.mp3
«Kasi o mokolo mwa yambo mwa poso, na tongo noki, bakendaki o lilita, bamemi malasi maye babongisaki. Mpe bakuti libanga libalusamaki longwa o lilita, kasi tango bakoti bakuti nzoto te. Wana bazalaki komituna mpo na likambo liye, tala, bato babale batelemi pene na bango na bilamba bia kongenga; mpe lokola babangaki mpe bagumbaki bilongi o se, bato balobi na bango: "Mpo na nini bozali koluka moto wa bomoi o kati ya bakufi? Azali awa te, kasi asekwi"» (Lk 24,1-5).
ln_gloria2v.mp3
«Bongo Nkolo Yezu, sima ya koloba na bango, amatamaki o lola, mpe afandi o loboko la mobali la Nzambe» (Mk 16,19).
ln_gloria3v.mp3
«Tango mokolo mwa Pantekote mokokaki, bango banso bazalaki esika moko. Mpe pwasa lokito loyei kowuta o likolo lokola mopepe makasi, mpe lotondi ndako yonso epayi bafandaki. Mpe endimi ya moto emimonisi epayi ya bango, ekabwani mpe ekiteli moko na moko wa bango. Mpe bango banso batondi na Elimo Santu mpe babandi koloba na minoko misusu, lokola Elimo apesaki bango koloba» (Mis 2,1-4).
ln_gloria4v.mp3
«Kobanda sikawa mabota manso bakobenga ngai wa esengo; mpo Ye wa Nguya asali makambo manene mpo na ngai» (Lk 1,48-49).
ln_gloria5v.mp3
«Mpe elembo enene emimonisi o likolo, mwasi alati moi, na sanza o se ya makolo ma ye, mpe o muto mwa ye motole mwa minzoto zomi na ibale» (Koy 12,1).
Tindela ngai bafichier ya audio
awa
MATONDI MINGI!!!